Écoutez le conte : Mokolo oyo Sahara akongenga lisusu
Publié le :
Écouter - 03:52
Yoka mopepe, Sahara nde azali kolela. Azali kozela moto ya bosembo pe malamu oyo akozongisela ye lisusu matiti pe nzete.
Yoka mopepe, Sahara nde azali kolela. alingi kongenga na matiti na ye lisusu.
Sahara ezalaki bisika bikawuka te : Ezalaki mboka kitoko na banzete ebele.
Bato bazalaki kotosa bikelamu nionso ya mokili. pe bazalaki na esengo
Bazalaki kokende bokila, kobokola bibwele pe kosala bilanga.
Bazalaki na bolingo ya ekolo na bango pe ekolo na bango elingaki bango.
Kasi pasi ekotaki tango bato ya lokoso ya mbongo bayaki.
Bato yango bazalaki koluka bomoyi malamu té, kasi bobele bozwi.
Bazalaki kotonda eloko moko te, posa na bango ezalaki ete babakisaka kaka biloko ebele pona bango moko.
Na bokila, bazalaki koboma banyama po na kolia te, kasi, kaka po na komilakisa.
Bazalaki kokata ba nzete po na kotonga ba ndako te, kaka, po na komilakisa.
Lolenge ya kosala ya bato yango esalaki Sahara pasi.
Nde azwaka mokano ya kobongwana bisika bikawuka.
Ata bongo, bato batikalaki kofanda wana kaka po bazalaki na bolingo na ye.
Esalaki Sahara esengo mingi.
Pona kotonda bango po na bolingo wana, Sahara apesaki bango mwa biziba, mwa ba nzete, mwa matiti, pe lisusu, biteni ya mabele kitoko nzinganzinga ya ebale monene ya Niger.
Wuta tango yango, Sahara akoma mawa mawa.
Yoka mopepe, Sahara nde azali kolela. alingi kongenga na matiti na ye lisusu.
Mokolo moko, atunaki moto ya bwanya lolenge ya kozongisa boyokani malumu ya tango ya kala.
Moto ya bwanya alobaki : « Luka kozala na bato ya bosembo pe malamu oyo batosaka bikelamu nionso ya mokili. »
Abakisaki lisusu ete: « Mokolo moko, eza na moto akoya. Alingi kozongisa bomoyi na matiti pe ba nzete oyo ezalaki kokola awa na tango ya kala.
Azali moto ya bosembo pe malamu. Apesa bomoyi na ye mobimba pona kobatela ba nzete.
Kasi, po na komona lisusu paradiso ebunga, esengeli ete alonga bato ya lokoso ya mbongo. Ekozala pasi mingi.
Kasi, esengo mingi po ete mosali malamu moko akosunga ye pona kokweyisa mikakatano pe kolonga banguna na ye.
Moto yango aza na ba mbuma oyo ekozongisela yo matiti pe ba nzete.»
Yoka mopepe : Sahara nde azali kolela. Azali kozela moto ya bosembo pe malamu oyo akozongisela ye lisusu matiti pe nzete.
Soki tokotosa bikelamu nionso ya mokili, yango ekolakisa ete tolingi biango, na bongo, bisika bikawuka ekozongela matiti pe be nzete na yango na lombangu penza.